Na oyo namoni mpe na makambo oyo nayoki, nazali komeka kobomba makanisi oyo na mongongo mpo nabosana yango te. Namoni ete nyonso oyo mokonzi ya bokonzi ya bapaya asalaki, akelaki bobangi mpe makambo ya nsomo na kati ya bikólo nyonso. Akelaki bitumba, akelaki koboma bato ebele, akelaki boombo na makasi ya mabe mingi. Bato mosusu babungisaki maboko na bango, bakataki bango makolo, banyokolaki bango, basalaki bango ba-opération kozanga anesthésie. Nakómi na likanisi ete ezali na industrie moko oyo etongami likoló ya bobangi. Kosala ete bato babanga ezali lokola industrie moko. Ezali na nguya moko, mpe nguya yango ezali koleisa entité moko, egregore moko. Pamba te na lolenge nyonso, makambo nyonso ya mabe oyo bato basalaka — kolela, kobimisa makila, koboma bato — ezali lokola bazali koleisa entité moko. Nalingi kobungisa molongo ya makanisi na ngai te, yango wana nazali kosala mongongo oyo. Mpe nazali na bondimi ete na mikolo ekoya nakolimbola yango lisusu malamu koleka, pamba te ezali likambo ya kokamwa te ete bato bakoki kolekisa bambula mingi mpe ba-décennies mingi na konyokola bato, koboma bato, kotia bango na pasi, konyokola bilenge basi mpe mibali na bisika nyonso ya mokili. Ezali na ntina moko mpo na makambo oyo ezali kosalema: lokola nde ezali na entité moko oyo bazali koleisa na nguya ya mabe. Soki banyokoli yo mingi mpe osili na bobangi mingi, entité yango ezwaka makasi mingi. Yango wana, na makanisi oyo, bazali kokela bitumba mpo na kobatela équilibre yango. Nakokoba koloba makambo mingi mpe kopesa makambo ya sikisiki mingi soki nazwi ntango ya kolimbola yango malamu, mpo likambo oyo ezali na ntina mingi mpo bato bayeba yango. Bato bakelaki mangomba, mpe mangomba ezali kobimisa bobangi na makanisi ya bato mpe koleisa yango ntango nyonso. Mpe na ngambo mosusu, bazali mpe kokela bobangi ya nzoto na nzela ya bitumba mpe banyokoli. Mangomba ekoki kobimisa bobangi na makanisi mpe na motema; bitumba mpe makambo ya makasi ezali kobimisa bobangi ya nzoto. Yango wana, na bitumba, bato basalaka makambo ya nsomo mpo na kotia bobangi na miso ya bato nyonso. Ezali lokola système moko mpo na kobatela bato nyonso na bobangi ntango nyonso.


